Les droits des étrangers face à la police?

 

Embed or link this publication

Description

Version Lingala

Popular Pages


p. 1



[close]

p. 2

M A K O M I YA EBANDELI Mikakatano ya kimvuka (lisanga ya bato) mpe bozangi kondima ekolo ya lisanga ya batu pona bosomi ya ekolo oyo ezali na misala mpe politiki ya makasi ezali komema bato na bokangami esika moko mpe na koboya lisanga. Na tango lisanga ezali komimonisa, ezali komonana malamu te mpe suka na yango bakonzi bazali koboya yango. Bokangami ya politiki ya kotala makambu ya ba paya oyo bazali kosenga lisungi na mboka mosusu mpe boboyi batu oyo bazali na bolingo ya koyamba ba paya ezali moko ya ndakisa oyo ezali komonana. Etonga yango moko mpe li na mikakatano, na bobungisi kimonkonzi (nguya) mpe bosolo. Nioso ezali koleka lolenge ete Etonga (Etat) ezali ko kokanisa nguya na ye na makambo etali lisanga ya batu, na ekonomi mpe mokili mobimba, na maloba ya makasi mpe ezaleli ya mabe. Botieyi mbongo mingi na misala ya lokumu oyo etali bokengeli ya batu mpe mboka na lolenge mosusu elingi koloba misala ya polisi. Misala oyo esimbami na maloba mpe makanisi ya molende na oyo etali bokebi yango ezali kotinda bomoni ya mituna ya bokebi ya nzoto kasi ya lisanga te lolenge ya mitungisami ya motuya ya batu mpe politiki. Lolenge nioso ya makambu ezali na bosomi penza te ezali pona kolembisa lisusu ba paya oyo bazali kofanda na Belgique. Na ko yeba ete yango ezali pasi mingi soki azangi mukanda na mboka oyo. Mosala oyo etali « Régionale Picardie Laïque du CAL » ezali pona kopesa ba paya oyo bazali na mboka makasi ya kozua ba sango ya solo pona mibeko na bango na botosi ya solo pona bo moto na bango mpe pona kopesa bango elikya ya mabombami ya solo na oyo etali nioso ya luyalu. Soki mokanda ya Matthieu Beys, ezali eloko ya motuya pona basali oyo bazali na esanga mpe bana mboka oyo bazali kosunga mpe kozala mikolo na mikolo na batu oyo bazali ba paya. Ye kutu azali lisusu kutu na komitungisama makasi mingi koleka ba paya bango moko. QUELS DROITS POLICE Manuel juridique et pratique Préface d’Alexis Deswaef Président de la Ligue des droits de l’Homme ? Mathieu Beys FACE À LA Couleur livres Na nioso wana, bobaloli munoko na monoko mosusu mpe epanzaneli ya mukanda oyo esalemi kaka pona mibeko ya ba paya, Régionale Picardie Laïque ye azali kaka kozela pona kosunga mpe bobateli mibeko na batu oyo bazali mingi na mikakatano na mboka na biso. Pona ko koma na nioso wana, ba eteni ya misala pe bokaboli mayele to makanisi ezali kosalema na ba oyo bazali na mikanda ya malonte te. Pona kolakisa mpe kosunga bango na oyo nioso etali mibeko ya motuya. Misala nioso oyo ezali likambo oyo etali etapi ya politiki : na yango, Régionale Picardie Laïque azali na boboyi ya solo na biyano ya bokebi oyo epesami na mituna etali bosengi lisungi (asile) mpe pona ba paya.  3

[close]

p. 3

TRADUCTION SOMMAIRE ?????? SOMMAIRE 1. BA PAYA NA BA MBOLO MBOLO 2. ETUNI MIKANDA NA NDELO YA MBOKA (FRONTIÈRE) 3. MITUNA NA LIKAMBO ETALI LIBALA YA LOKUTA 4. BOKANGAMI PE EKANGELAMI YA MIKANDA NA BA OYO BAZANGI MIKANDA 5. ESALELI NA MAKASI NA TANGO YA BOBENGANI 6. BAZANGI MIKANDA MPE NA BA OYO BAZUI ETUMBU YA MIBEKO 7. ESENGELI KOLOBA PONA KOBUNDELA MIBEKO YA BA PAYA 39 5 9 15 21 31 41 1. BA PAYA NA BA MBOLO MBOLO 5 4

[close]

p. 4

SOLO, na koloba, na zali na mibeko ndenge moko liboso na polisi, lolenge ya moto nioso soki na zali mopaya, ata kutu na zali na mukanda te. « Kozanga mukanda » yango elingi koloba te ke na zali na mibeko te. Mibeko nioso ya motuya oyo ekomani ezali pe na solo na ba oyo « bazangi mikanda » : Epekisami ya boniokoli et bokangi ya solo te, mibeko ya bomoyi pe ya libota. KASI, soki nazali na mitindo te ya kofanda na Belgique, na kobika te, na tango nioso na kutani na polisi na lolenge moko soki na tuni bango po na funda po mutu asali ngai mabe, bokangemi, to mitindo ya kobengama na mboka, to ekangemi na kuku, to kozongisa na mboka na ngai epayi na wuta (to mboka mosusu ekoki ko ndima ngai). 6 NAZALI NA MIBEKO NDENGE MOKO LIBOSO NA POLISI SOKI NAZALI MOPAYA TO KOZANGA MIKANDA ? NAZALI MUTU YA MABE PO NA ZANGI MIKANDA ? SOLO, na kozala na mikakatano na elobeli na ekangemi to na ekatelani ya mabe na ba konzi ya mboka mikolo mwambe to sanza misato na boloko, pe amende, bongo molakisa ya mabe na l’Etat po kaka na zali na mukanda te na Belgique. (Elingi koloba ke na kozala na mibeko te, kasi yango ezali denge moko te soki nazali na mukanda moko te ya kofanda na mboka oyo to soki yango esi esili ngala to na kozela ba bandela yango). KASI, na misala, bakoki ko pesa ngai etumbu te soki kaka na zangi mukanda ya solo. Mbula Matadi (l’Etat) azali na mitindo te ya kopesa ngai etumbu, ata kutu kotia ngai na boloko pona kozanga mukanda. Yambo ya koyebisa ngai na bozongi na kimia to kozua ba ezaleli mosusu. (lolenge kotia na kuku oyo ekangama) na lolenge ya koluka ndenge nini ya kozongisa ngai, to na makasi.  Tiré du manuel de Mathieu Beys 7

[close]

p. 5

2. ETUNI MIKANDA NA NDELO YA MBOKA (FRONTIÈRE) 9

[close]

p. 6

NA NDELO NINI YA MBOKA BAKOKI KOTUNA NGAI MIKANDA ? Ba mbolo mbolo bakoki kotuna ngai mikanda, ndenge ba lingi, soki na zali kokatisa ndelo ya libanda ya eteni ya Schengen. Ezali na zomi na misatu esika ya bokati ndelo ya libanda ya Belgique : Efandeli pepo motoba (Bruxelles National, Deurne, Ostende, Gosselies, Bierset, Wevelgem) libongo motobo (Anvers, Gand, Nieuport, Blankenberge, Ostende, Zeebrugge) pe na nzela ya machini = Eurostar na gare ya Bruxelles-Midi. Na solo, (soki mibeko epesami), ba mbolo mbolo ba koki soki muke te kotuna mikanda soki nazali koleka ba ndelo ya kati ya mboka (ndelo ya mabele ya France, Allemagne, Luxembourg, to Pays-Bas) pe soki na bimi libanda ya machini (train) to na pepo kowuta na eteni ya Schengen. KASI, etuneli ya mikanda na ndelo ya kati ya mboka ekoki kopesama kaka soki na tango « ya mobulu makasi po na oyoekoki kobebisa kimia ya batu to kozangisa kimia ya kati ». Pona ngonga to tango molayi ya mikolo tuku na misatu to soki « mobulu ezali komonana makasi ». Soki ezali likolo ya mikolo tuku na misatu. L’Etat (bakonzi ya mboka) ba koki kobakisa mikolo soki mobulu ezali kobakisama mpe esengeli ayebisa bana mboka mokano ya kobandela kotuna mikanda, kaka soki ba raisons ya botuni mikanda na tango ya ebundeli ya ndembo na Europe na 2000 pona kokengela ba kumbisi bato oyo balinga ndembo.  Na lolenge misusu, mbolo mbolo akoki kotuna ngai mukanda na mbalakata na kati ya eteni ya mboka oyo ezali pene pene na eteni ya ndelo ya mboka. (Soki ezali etuneli ya mabe te). To na libongo to na efandeli pepo, la lolenge ke mbolo mbolo azali kozua ngai lokola mutu ya mabe po azuaki mitindo na lolenge ya bokebi ya batu to na ba paya.   Tiré du manuel de Mathieu Beys 10 11

[close]

p. 7

Yango ezali kaka soki na zali muana ya mboka ya mo moko ya ba zuani 28 mboka ya U.E to soki na zali muana ya libota ya mutu oyo azali na U.E (mobali to muasi to ndeko akomama, to muana na se ya 21 ans to oyo azali na se ya mitindo ya muana mboka to mobali to uasi, to moninga, to parent oyo azali na charge ya muana oyo aza na U.E. to muasi to mobali to ndeko to te. Soki na zali muana ya mboka ya U.E. to moko kati na libota ya muana mboka ya U.E. (ata kutu mboka na ngai) mbolo mbolo « akotuna mikanda na ndenge ya muke. Ndakisa etuneli ya muke pe na lombangu po na koyeba solo ya mukanda » nde ye mutu akopesa ngai mitindo ya kokatandelo ya mboka. Na yango mbolo mbolo akolinga ayeba soki ezali ya lokuta. Mbolo mbolo akoki pe kotuna na BNG (banque de données nationale générale) to na Europa lokola SIS (Système d’information Schengen) pona kotala soki na zali mutu ya mobulu, na tango oyo tozali, to mobulu na ngai ezali makasi pona bokebi ya kati ya mboka, bana ya mboka to na bo ndeko ya mboka na mboka ». Kasi boyebi wana ezalaka ya mukolo na mukolo te. Soki nazali muana ya U.E te to ndeko na kati y a libota ya nzinga nzinga te, mbolo mbolo akotala mikanda na bozindo na ekoteli pe na bibimi ya eteni ya Schengen.  12 MBOLO MBOLO AKOTUNA NINI SOKI NAZALI KOKATA NDELO YA MBOKA ? Bakotala lisusu : • Soki na lekisi mikolo te oyo bapesaki ngai • Ekoteli to ebemeli na ngai na eteni ya Schengen (mbata to cachet na buku passeport) • Emoniseli ya posa ya bofandi na ngai (mukanda ya invitation to visite familiale, to emoniseli ya Tourisme to mukanda ya misala na ngai) • Emoniseli ya bozui na ngai pe makoki na ngai • Soki makoki na ngai pona ko tambola na ngai, biloko na ngai oyo na memi, to ngai moko ekoki kobulangisa ba susu te, bokebi na kati ya mboka, bo peto ya batu, to ba relation internationales na kati ya moko ya mboka ya lisanga » (na kotala BNG (Banque des données nationales générale » Na kotala SIS soki eza na motuya.  Tiré du manuel de Mathieu Beys 13

[close]

p. 8

BAKOKI KOZUA BILEMBO YA MISAPI NA NGAI NA TANGO YA ETUNELI MIKANDA NA NDELO YA MBOKA ? SOLO, soki na ye kosenga ebombameli to soki na zali na visa ya ngonga moke. Ba mbolo mbolo bakoki kotala soki bilembo ya misapi na ngai ezali penza ko kokana na mutu oyo asengi visa. Bilembo ya misapi wana ezuamaki na Ambassade pe ezali na kati ya Système d’informations na kati ya visa, « VIS (système d’information sur les visas) ». 14 3. MITUNA NA LIKAMBO ETALI LIBALA YA LOKUTA 15

[close]

p. 9

BA mbolo mbolo bakoki kobanda mituna soki ba zali komona été makanisi ya ndeko kati ya ba oyo babali ezali pona kosala lisanga ya tango ya molayi te ; kasi ezali kaka pona kozua oyo ya motuya na oyo etali bofandi na mboka » yango ba bengaka libala ya lokuta (mariage en blanc). Mituna ekoki kosunga na ba nzela oyo : • Kopesa ngai etumbu pona sanza moko to sanza misatu ya boloko pe na kofuta mbongo (amende) • Koboya libala to na makanisi ya kofanda esika moko. • Koboya sima ya bosali libala to kofanda esika moko. Na solo, ba pokusi (to mbolo mbolo), ba kozua ba sango nioso epayi ya ndeko ya pembeni, kolo ndaku, to mokengeli ndaku, mikaboli mikanda ya poste, ba teki biloko, na commune, na libota (ex molongani na ngai ya kala, bana na ngai, ba témoins ya libala). 16 NA TANGU NINI BAKOKI KOBANDA MITUNA PONA BOLINGO NA NGAI (TO LIBALA NA NGAI) ? LOLENGE NINI MITUNA ELEKAKA SOKI MBOLO MBOLO AZALI KOYEBA ETE WANA EZALI LIBALA YA LOKUTA ? Ba polisi bayaka na ndaku mbala na mbala pona kotala lolenge ya kofanda pe solo ya efandeli na ngai na molangani. Na koki koboya bakota pe bazali na mitindu ya kokata te. Kasi koboya na ngai ekoki komema ngai ti koboyisa ngai libala to kofanda esika moko. Soki nazali mutu ya mobulu na lingi na bala ya lokuta, mituna ekopesama to koleka lokola mutu ya mabe. Na yango na zali na mibeko ya kozua avocat yambo ba tuna ngai mituna.   Tiré du manuel de Mathieu Beys 17

[close]

p. 10

Ba polisi bakoki kotuna ngai : • Ndenge nini pe mikolo nini na kutanaki na molongani na ngai ? • Nani alakisaki biso moninga ? • Ba ndeko ya libota na ye pe basalaka nini ? • Mukolo nini pe lolenge nini to sololaki na libala to kofanda esika moko pona mbala liboso ; • Eloko nini alingaka kolia, posa na ye, mukanda, to film nini alingaka? • Soki mbongo efutamaki po libala esalama ; • Soki to sangisaki nzoto, ndenge nini tango ezalaki koleka, pe mokolo ya suka ezalaki mukolo nini ; • Bozui na biso pe tosalaka ndenge nini pona kofuta ba niongo, kolia, kosomba biloko. Ba polisi bakoki kotuna ba mituna ndenge moko na molongani na ngai. Soki bokeseni ezali ya mingi, libala to bofandi esika moko ekoboyama. Lolenge ya mituna nioso, na koki ko signer P .V te lobakaka soki na tangi nioso na mutu ya kokita pe na ndimi oyo nioso ekomami. Esengeli na ngai na senga copie ya P .V kasi ba polisi bakoki kozela sanza moko yambo ba pesa ngai yango. 18 ESENGELI PONA NGAI NA ZONGISA BIYANO NA MITUNA NIOSO BA POLISI BAZALI KOTUNA NGAI PONA LIBALA NA NGAI ? TE, esengeli na ngai te na pesa biyano nioso, po ete biyano na ngai ekoki komema ngai na etumbu ya esambiseli. KASI, na solo, soki na boyi, ba polisi bakoki ko loba ete libala na ngai ezali ya lokuta, pe wa ekoki komema boboyi ya libala to kofanda esika moko.  Tiré du manuel de Mathieu Beys 19

[close]

p. 11

BAKOKI KOTIA NGAI NA MIKANDA NA BANGO SOKI MITUNA ESALAMI PONA NGAI PONA LIBALA NA NGAI YA LOKUTA ? SOLO, ba polisi bakoki kotia ngai na mikanda na bango BNG (Banque de données nationale générale) soki magistrat atuni yango, na lolenge ya mituna oyo etali libala na ngai to efandeli esika moko. Bozongisi sima to boboyi ya libala to bofandi esika moko ekokomama na kati ya mukanda ya population, pona koboya ete na kende kosenga libala na commune mosusu sima ya boboyi na commune oyo na salaki pona mbala liboso. 20 4. BOKANGAMI PE EKANGELAMI YA MIKANDA NA BA OYO BAZANGI MIKANDA 21

[close]

p. 12

NA TANGO NINI BAKOKI KOKANGA NGAI SOKI NA ZALI MOPAYA ? BAKOKI KOTINDIKA NA MAKASI EKUKE NA NGAI PO ETE NAZANGI MIKANDA ? Na solo, te. Soki na zali esika na ngai sima ya boyebi ete esengeli la nongua na mboka, esengeli na ngai na yeba ete ba polisi ba koya na ndaku. Soki bakuti ngai epayi na ngai, bakoki kokanga ngai pe komema ngai na kuku ekangama. Soki na boyi kofongola ekuke na ngai, bakoki kotindika ekuke na makasi te, kaka soki ezali na bo mbangu to bazali na mitinda ya esambiseli. Kasi esengeli na bango basala mukanda na esika oyo batalaka makambu ya ba paya (Office des étrangers) bango nde ba komonisa boboyi, pe soki na kangami na sima, ba kozua yango po ba tia ngai na kuku ekangama. Tango mosusu ba mbolo mbolo bakoki kosala mayele pona bokoti na ndaku na ngai ; na koloba lolenge ete baye pona bokimi ya gaz oyo ezali na ndaku, wana ezali malamu te (ezali na mibeko te).  Tiré du manuel de Mathieu Beys Soki na zali mopaya, polisi akoki kokanga ngai : • Na mibeko nioso oyo esengelami bokangami na mutu nioso oyo azali belge to mopaya. • Soki na zali na mikanda te oyo ya bomoto na ngai to mokanda moko te ndakisa na koki kolakisa bofandi na ngai ya solo na mboka. 22 23

[close]

p. 13

BA POLISI BAKOKI KOMEMA NGAI NA LOKUTA NA ESIKA BA SALAKA PO BAZONGISA NGAI ? SOLO, eloko moko te ekoki kopekisa ba polisi ba kanga bana na ngai na kelasi soki bazali na mukanda ya solo te. Esengeli na ba polisi : TE, soki na zali mopaya na mukanda ya solo te, pe bazali koluka ngai te pona likama ya mabe, esengeli te bakosa ngai na lolenge ya lokuta ; lokola neti « koma mukanda oyo » pona komema ngai na esika ba salaka pe sima ba kanga ngai pe kozongisi ngai na mboka na ngai na wuta (to mboka mosusu ekoki kondima ngai). Esengeli te kokosa batu ata kutu azali na mukanda ya malonga te, na lolenge ya bobengisi pona ko pimela ye liberté. 24 • Ba yebeisa na mokambi ya kelasi liboso ba sala musala na bango « po ba bongisa bokeyeli malamu ya bana » • Kozala na bilamba ya ndaku pe kolakisa mukanda na bango • Ba kosala musala na bango na ngonga ya mateya te • Bakoki pe kozala na moko ya libota po ekendeli malamu. Ba polisi bakoki na ekuku ya bakambi ya kelasi te soki ba pesi bango mutindo te.  Tiré du manuel de Mathieu Beys BA POLISI BAKOKI KO KANGA BANA NA NGAI NA KELASI ? 25

[close]

p. 14

Soki ba polisi bakangi ngai po ete mikanda na ngai ezali malonga te, bakoki kaka kozelisa ngai ngonga oyo ezali motuya ti tango bakotinda maloba na « bureau ya Office des étrangers » pe kozela mitindo. Ba mbolo mbolo esengeli na bango kotika ngai soki bayebisi bango ete nazali na mibeko nazala na Belgique to « Office ya ba étrangers bazali na posa ya kotia ngai na nkuku ekangama te. Ekangemeli na ngai na bureau ya polisi esengeli ewumela kaka mokolo moko (ngonga 24). Yango ezali mbala mibale na ekangameli ya mikanda (administratif) pona ba kolo mboka (belges). Soki bureau ya ba paya ezui mibeko te na kati ya tango esengeli, esengeli ba tika ngai. Na ko signer te mukanda ya boboyisi liberté oyo ezali na ba ngonga ekokani na solo te. Na lolenge ya mitindo ya « office des étrangers » ba polisi bakoki : • Kotika ngai na kende, pe na kobima na territoire te, po ete makambu na ngai ya « asile » ezali nanu na nzela. • Bakoloba na ngai na bima na mboka na ngonga oyo esengeli (na nioso mikolo 30) pe kotika ngai. • Komema ngai na kuku ekangama pe na mitindo ya kobima na mboka to ba kopesa ngai na ba oyo « ba salaka pona bokebi ya motambuisi » ya Office des étrangers (bureau ya ba paya). • Komema ngai na esika pepo ekitaka pe na mitindo ya kobima mboka. 26 NGONGA BONI BAKOKI KO KANGA NGAI SOKI NA ZALI NA MIKANDA YA MALONGA TE ? BA SANGO NINI ESENGELI NA ZUA PONA BOKANGAMI NA NGAI ? Esengeli na ngai na yeba mibeko to pona nini bo kangami na ngai na ngonga ya muke pe na monoko oyo ngai na zali koyeba te. Na boyebi mibeko wana etosamaka penza te po ete ba polisi basepelaka koloba na ngai na signer pona bozui ya mitindo ya bokangami kowuta na « Office des étrangers », mitindo wana ekomamaka na monoko ya « français to néerlandais ». Nazuaka ba sango na ekomeli na centre oyo ekangama kasi na zali na chance ya muke na zua molimboli. Pona koboya nioso wana, esengeli na signer ata mukanda moko te. Lolenge ya koboya ko signer décision elengi koloba te ke ba kopesa ya copie te.  Tiré du manuel de Mathieu Beys 27

[close]

p. 15

Na ndenge na zali mopaya oyo akengemi pona etaleli malamu na makambu oyo ya ngai to na bozeli ya mibeko ya bobimi na mboka, na zali na mubeko ndenge moko na mutu nioso oyo akangami pona yango na koki : • Mutu oyo ya malamu pona ekangemeli na ngai • Bo moni munganga ya ofele • Komela, mpe kolia na ba ngonga malamu, mpe makoki ya kosokoli nzoto mpe boboyi bokono. Ya solo, na koka te na ndenge ya mibeko kozua (avocat) kasi eloko moko ekopekisa ngai te na senga moto ena (avocat). Liboso ya bobengani na nga, esengeli na ngai na kanga biloko mpe bilamba na ngai mpe bozui mokanda ya polisi oyo ezali kolakisa biloko oyo na zuaki mpe oyo na tikaki na Belgique na ba sango nioso mpe na mikano nioso na zua yango mbala ya sima. 28 NINI OYO EBONGAMI NA MIBEKO PONA NGAI NA BOKANGAMI NA NGAI NA NDAKO YA BA POLISI ? ESENGELI NA NGAI KOYANOLA NA MITUNA NIOSO YA BA POLISI ? TE, esengeli na ngai kozala na kimia lolenge ya moto nioso oyo batunaka mituna. Soki na zali na mikanda ya bo moto na ngai te, ndako oyo etalaka makambo ya ba paya esengeli eyeba epayi na wuta mpe koyokana na mboka na ngai oyo na wuta liboso ya ko bengana ngai. Ba polisi bakotuna nga mituna po bayeba nazali nani mpe na wuti na mboka nini. Bakoki mpe na yango kotuna na moyanioli (interprète) pona koyeba epayi na wuta na lolenge ya monoko oyo na zali koloba mpe ndakisa ya elobeli na nga (Lolenge ete ba paya misusu bazali koloba ete ba zali ba Palestiniens kasi bazali kokanisa bango lokola ba Marocains, Tunisiens, to Algériens).  Tiré du manuel de Mathieu Beys 29

[close]

Comments

no comments yet